Kobongisa ba données

Mpo na kobongisa ba données, bokende na ligne. Bofina second F mpe flèche ya likolo mpo na kokóma na ligne ya liboso. Bofina second F mpe DEL mpo na kolongola ligne wana: 20 ezali lisusu te. Bokende flèche ya nse, mpe flèche ya nse lisusu, na ligne ya 50. Bofina alpha mpe bouton ya kobongola, insert DATA, mpo na kotya ligne ya sika liboso na yango. Bokoma 45, virgule, 3, mpe ENT. Curseur ezali sikoyo na 50: bokoma 60 mpe bofina ENT mpo na kokitana yango. Ba données ezali sikoyo 30, 40, 40, 45, 45, 45 mpe 60.